37 Yango ezalaki mabota ya Efrayimi mpe bazalaki bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mitano. Bango nde bazalaki bakitani ya Jozefi kolanda bituka na bango.
Bakitani ya Benjame kolanda mabota na bango bazalaki : na nzela ya Bela, bakitani ya libota ya Bela ; na nzela ya Ashibeli, bakitani ya libota ya Ashibeli ; na nzela ya Ayirami, bakitani ya libota ya Ayirami ;