Bakitani ya Efrayimi kolanda mabota na bango bazalaki : na nzela ya Shutela, bakitani ya libota ya Shutela ; na nzela ya Bekeri, bakitani ya libota ya Bekeri ; na nzela ya Tayani, bakitani ya libota ya Tayani.
Yango ezalaki mabota ya Efrayimi mpe bazalaki bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mitano. Bango nde bazalaki bakitani ya Jozefi kolanda bituka na bango.