Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, azalaki na bana mibali te, kasi azalaki kaka na bana basi ; bongo, tala bakombo na bango : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa.
Bakitani mosusu ya Manase, kolanda mabota na bango, bazwaki eteni ya mabele : bakitani ya Abiezeri, ya Eleki, ya Asirieli, ya Sishemi, ya Eferi mpe ya Shemida. Bango nde bazalaki bana mibali ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, kolanda bituka na bango.