Bakitani mosusu ya Manase, kolanda mabota na bango, bazwaki eteni ya mabele : bakitani ya Abiezeri, ya Eleki, ya Asirieli, ya Sishemi, ya Eferi mpe ya Shemida. Bango nde bazalaki bana mibali ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, kolanda bituka na bango.
Anjelu ya Yawe ayaki mpe avandaki na se ya terebente oyo ezalaki na Ofira, kati na mabele ya Joasi, moto ya libota ya Abiezeri. Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azalaki kosangisa bambuma ya ble esika moko, na esika oyo basalaka masanga ya vino, mpo na kobomba yango liboso ya bato ya Madiani.
Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.
Kasi Jedeon azongiselaki bango : — Nasali nini oyo ekokani na oyo bino bosala ? Boni, ndambo ya bambuma ya vino oyo etikalaki na sima mpo ete Efrayimi abuka yango ezali kitoko te koleka bambuma ya vino ya liboso ya Abiezeri ?