Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 26:20 - Mokanda na Bomoi

20 Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Shela, bakitani ya libota ya Shela ; na nzela ya Peretsi, bakitani ya libota ya Peretsi ; na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zera.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 26:20
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yuda alobaki na Tamari, bokilo na ye ya mwasi : « Lokola okufisi mibali, kende kovanda na ndako ya tata na yo kino Shela, mwana na ngai ya mobali, akokoma mokolo. » Pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu ye mpe akoki kokufa lokola bandeko na ye ya mibali. » Boye Tamari akendeki kovanda na ndako ya tata na ye.


alongolaki bilamba na ye ya mwasi akufisa mobali mpe amizipaki elongi na vwale mpo ete bayeba ye lisusu te. Avandaki na ekuke ya Enayimi oyo ezalaki na nzela ya Timina, pamba te amonaki ete Shela akolaki, kasi bapesaki ye te na libala epai ya Shela.


Abotaki mwana mobali mosusu mpe apesaki ye kombo « Shela. » Yuda azalaki na Kezibi tango mwasi na ye abotaki mwana ya misato.


Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli.


Yuda, bandeko na yo ya mibali bakokumisa yo, loboko na yo ekozala na kingo ya banguna na yo ; bana mibali ya tata na yo bakogumbama liboso na yo.


Bana mibali ya Shela, mwana mobali ya Yuda : Eri, tata ya Leka ; Laeda, tata ya Maresha ; mpe mabota ya basali bilamba ya lino, na Beti-Asheba.


Utayi, mwana mobali ya Amiwudi, mwana mobali ya Omiri, mwana mobali ya Imiri, mwana mobali ya Bani, moko kati na bakitani ya Peretsi, mwana mobali ya Yuda.


Kati na bato ya Shiloni : Asaya, mwana ya liboso, mpe bana na ye ya mibali.


Petaya, mwana mobali ya Meshezabeyeli, moko kati na bakitani ya Zera, mwana mobali ya Yuda, azalaki kalaka ya mokonzi mpo na kotala makambo nyonso ya bato.


mpe bato ya Yuda mpe ya Benjame bavandaki kati na Yelusalemi : Mpo na bakitani ya Yuda : Ataya, mwana mobali ya Oziasi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Shefatia, mwana mobali ya Maalalele, mokitani ya Peretsi ;


Bakitani nyonso ya Peretsi oyo bavandaki kati na Yelusalemi bazalaki mibali nkama minei na tuku motoba na mwambe.


Bakitani ya Peretsi kolanda mabota na bango bazalaki : na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi ; na nzela ya Amuli, bakitani ya libota ya Amuli.


Yuda abotaki Peretsi mpe Zera na nzela ya Tamari, mwasi na ye ; Peretsi abotaki Etsironi ; Etsironi abotaki Arami ;


Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi ; Aminadabi, mwana mobali ya Adimini ; Adimini, mwana mobali ya Arini ; Arini, mwana mobali ya Etsironi ; Etsironi, mwana mobali ya Peretsi ; Peretsi, mwana mobali ya Yuda ;


Kati na libota ya Yuda, bato nkoto zomi na mibale babetamaki kashe ; kati na libota ya Ribeni, bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Gadi, bato nkoto zomi na mibale ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ