Eleazari, mwana mobali ya Aron, abalaki moko kati na bana basi ya Putieli, oyo abotelaki ye mwana mobali : Pineasi. Wana nde bakambi ya mabota ya Levi kolanda mabota ya botata na bango.
« Boyokani na Ngai elongo na ye ezali boyokani ya bomoi mpe ya kimia, mpe nakopesa ye yango mpo ete atosa Ngai. Atosaki Ngai solo mpe azalaki kolenga liboso ya Kombo na Ngai.
Moyize atindaki bango na etumba bato nkoto moko ya libota moko na moko elongo na Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari oyo amemaki bisalelo ya Esika ya bule mpe bakelelo mpo na kopesa mbela.
Boye bana mosusu ya Isalaele batindaki na mokili ya Galadi, Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki : — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ? Yawe azongisaki : — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino.
Kasi molimo moko ya mabe kowuta na Yawe ekitelaki Saulo, wana avandaki kati na ndako na ye mpe asimbaki likonga na loboko na ye. Lokola Davidi azalaki kobeta lindanda,