Likolo ya mabe na yo, okobungisa libula oyo napesaki yo, nakokomisa yo mowumbu ya banguna na yo kati na mokili oyo oyebi te ; pamba te opelisi kanda na Ngai, mpe ekopela mpo na libela. »
Nakopesa etumbu te : ezala na bana na bino ya basi mpo na kindumba na bango to na basi ya bana na bino mpo na ekobo na bango ; pamba te bango moko mibali babimaka na basi ya ndumba mpe babonzaka mbeka elongo na bandumba ya tempelo. Bato bazangi bososoli basukaka se na libebi !
Tango namonaki Isalaele, azalaki lokola bambuma ya vino kati na esobe. Tango namonaki bakoko na bino, bazalaki lokola bambuma ya liboso ya nzete ya figi. Kasi tango bakomaki na Bala Peori, bamipesaki na nzambe oyo ya ekeko ya soni mpe bakomaki nkele lokola eloko oyo bango balingaki.
Ezalaki nde bango bato balandaki toli ya Balami mpe batindikaki bana ya Isalaele na kopesa Yawe mokongo, kati na makambo oyo esalemaki na Peori ; mpe yango nde esalaki ete etumbu ekweya likolo ya bato na Yawe.
Boni, lisumu ya Peori ekoki te mpo na biso ? Kutu, kino na mokolo ya lelo, nanu tosilisi kopetolama na yango te, atako etumbu ekweyelaki lisanga ya Yawe !
Bongo Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe akabaki bango na maboko ya bato mabe oyo babotolaki bango biloko na makasi ; asundolaki bango epai ya banguna na bango, oyo bazalaki zingazinga na bango, mpe bazangaki makoki ya kotelemela bango.