Mitango 25:18 - Mokanda na Bomoi18 pamba te bakamataki bino lokola banguna mpe basalelaki mayele mabe mpo na kokweyisa bino, na likambo ya Peori mpe ya ndeko na bango ya mwasi, Kozibi, mwana mwasi ya moko kati na bakambi ya Madiani, oyo babomaki na tango ya etumbu kati na likambo ya Peori. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.