Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 25:15 - Mokanda na Bomoi

15 mpe oyo ya mwasi ya Madiani ezalaki Kozibi, mwana mwasi ya Tsuri, mokambi ya libota moko ya ekolo ya Madiani.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 25:15
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo bato ya Moabi balobaki na bakambi ya Madiani : « Ebele ya bato oyo bazali koya mpo na kobebisa biloko nyonso oyo ezingeli biso lokola ngombe oyo ezali kolia matiti ya elanga. » Na tango wana, ezalaki Balaki, mwana mobali ya Tsipori, nde azalaki mokonzi ya Moabi.


Kombo ya moto ya Isalaele oyo babomaki elongo na mwasi ya Madiani ezalaki Zimiri, mwana mobali ya Salu, mokambi ya libota ya Simeoni ;


pamba te bakamataki bino lokola banguna mpe basalelaki mayele mabe mpo na kokweyisa bino, na likambo ya Peori mpe ya ndeko na bango ya mwasi, Kozibi, mwana mwasi ya moko kati na bakambi ya Madiani, oyo babomaki na tango ya etumbu kati na likambo ya Peori. »


Kati na molongo ya bato oyo babomaki, ezalaki na bakonzi ya Madiani oyo : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba. Babomaki mpe lisusu Balami, mwana mobali ya Beori na mopanga.


bingumba nyonso ya ngomba mpe mokili mobimba ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori oyo azalaki kokonza na Eshiboni. Moyize alongaki ye elongo na bakambi ya Madiani : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba, oyo bazalaki kosalela Sikoni mpe kovanda na mokili na ye.


Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe liboso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu sambo na maboko ya bato ya Madiani.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ