Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 25:12 - Mokanda na Bomoi

12 Na boye, yebisa ye ete nasili kosala boyokani ya kimia elongo na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 25:12
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Pineasi atelemaki, akataki makambo, mpe pasi yango esilaki.


Mpo na yango, Pineasi atangamaki lokola moto ya sembo mpo na bikeke nyonso, seko na seko.


Ata bangomba milayi eningani, ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango, bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te, mpe boyokani na Ngai ya kimia ekotikala kolongwa te, elobi Yawe oyo alingaka yo.


Nakosala boyokani ya kimia elongo na bibwele na Ngai, nakolongola banyama mabe kati na mokili mpo ete bibwele na Ngai evanda na kimia kati na esobe mpe elala na bazamba.


Nakosala boyokani ya kimia elongo na bango : ekozala boyokani ya libela na libela. Nakolendisa bango, nakokomisa bango ebele koleka mpe nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela.


Kasi bino, bopengwi na nzela mpe bobetisi bato ebele mabaku na malakisi na bino ; bobebisi boyokani elongo na Balevi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


« Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi ; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ