Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 24:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali, lokola nkosi ya mwasi ; nani akokoka kotelemisa bango ? Tika ete oyo akopambola yo apambolama, mpe oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ! › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 24:9
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakopambola bato oyo bakopambola yo, mpe nakolakela mabe moto oyo akolakela yo mabe ; mpe bato ya bituka nyonso ya mabele bakomipambola mpo na yo. »


Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo ! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! »


Yuda, ozali mwana ya nkosi ; mwana na ngai ya mobali, owuti na bokila. Agunzami mpe alali lokola nkosi ya mobali ; mpe lokola nkosi ya mwasi, nani akomeka kotelemisa ye ?


Bikeko zomi na mibale ya nkosi ezalaki na likolo ya binyatelo motoba ya ematelo : enyatelo moko na moko ezalaki na bikeko mibale, ekeko moko na ngambo moko na moko. Kati na mikili nyonso, eloko ya ndenge wana etikala nanu kosalema te.


Kiti yango ya bokonzi ezalaki na ematelo ya binyatelo motoba, enyatelo makolo ya wolo ekanganaki na kiti. Na bangambo nyonso mibale, ezalaki na bisika ya kotia maboko, mpe bikeko mibale ya nkosi na pembeni ya bisika ya kotia maboko.


Amani ayebisaki mwasi na ye, Zereshi, mpe baninga na ye nyonso makambo oyo ekomelaki ye. Bapesi toli na ye mpe mwasi na ye, Zereshi, balobaki na ye : — Lokola kokweyisama na yo ebandi liboso ya Maridoshe oyo azali Moyuda, okokoka kolonga ye te ; solo penza, okokweyisama lisusu na se koleka !


Soki ekosoli, zolo na yango ekobimisa pole ; mbuma ya miso na yango ezali lokola moyi ya tongo.


Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia !


Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.


Kasi soki boyoki na bokebi makambo oyo akoyebisa bino mpe soki bosaleli nyonso oyo nalobi, nakozala monguna ya banguna na bino mpe nakotelemela bato oyo bakotelemela bino.


Tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : « Ndenge nkosi to mwana nkosi egangaka liboso ya mosuni na yango, ata lisanga monene ya babateli bibwele basangani mpo na kotelemela yango, ezalaka na somo ya makelele na bango te mpe ezongaka sima te na mangungu na bango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokita na ngomba Siona mpe na ngomba na yango ya moke mpo na kobunda.


Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo, mpe bayini na yo nyonso babebisama nye !


Kasi Nzambe alobaki na Balami : — Kokende elongo na bango te. Okoki kolakela bato wana mabe te, pamba te bazali bato bapambolama.


Nabondeli yo, yaka kolakela bango mabe, pamba te bazali makasi mingi koleka ngai, tango mosusu nakokoka kolonga bango mpe kobengana bango na mboka. Pamba te nayebi ete bato oyo opamboli, bapambolamaka ; mpe ba-oyo olakeli mabe, balakelamaka mpe mabe.


Bato oyo batelemi lokola nkosi ya mwasi ; epemaka te soki epasoli te mosuni na yango mpe emeli te makila ya nyama oyo ekangi. »


Balaki atombokelaki Balami makasi. Abetaki maboko na ye mpe alobaki : — Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe, kasi yo opamboli bango mbala misato.


Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »


Akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »


Saulo atunaki : — Nkolo, yo nani ? Mongongo ezongisaki : — Ngai, nazali Yesu oyo yo ozali konyokola.


Yawe, Nzambe na bino, akotia bilakeli nyonso ya mabe likolo ya banguna na bino, oyo bayinaka bino mpe banyokolaka bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ