7 Mayi ekotiola wuta na bibombelo na bango, bankona na bango ekozwa mayi ebele. Mokonzi na bango akozala monene koleka Agagi, bokonzi na bango ekozala ya lokumu.
Salomo azalaki kokonza bikolo wana nyonso, kobanda na ebale Efrate kino na mokili ya bato ya Filisitia, mpe kino koleka mondelo ya Ejipito. Na bomoi na ye mobimba, bikolo yango ezalaki kofuta mpako epai na ye mpe ezalaki na se ya bokonzi na ye.
Na Yelusalemi, ezalaki na bakonzi ya nguya oyo bazalaki kokonza etuka mobimba ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe epai ya banani bazalaki kofuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela.
Sima na makambo oyo, mokonzi Kizerisesi apesaki lokumu epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi ; atombolaki ye mpe atiaki ye likolo ya bakalaka nyonso.
Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo nyonso ekokende kotondana kuna.
Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, bino oyo bobimi na libota ya Yuda, bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, kasi na bosolo te mpe na bosembo te !
Na tango ya bakonzi wana, Nzambe ya Lola akobimisa bokonzi moko oyo ekotikala kobebisama te mpe ekotikala kozala te na se ya bokonzi ya ekolo mosusu ; ekopanza mpe ekosukisa babokonzi wana nyonso, kasi yango moko ekowumela seko na seko.
Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. »
Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo etumbu oyo mwasi ya ndumba monene oyo avandaka na bibale minene akozwa.
Anjelu alobaki na ngai : « Mayi oyo omonaki, oyo mwasi ya ndumba avandaki na likolo na yango, ezali bato ya mokili, bangulupa ebele ya bato, bikolo mpe nkota.