Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 24:6 - Mokanda na Bomoi

6 Epanzana lokola miluka ya mike-mike, lokola bilanga oyo ezalaka pembeni ya ebale, lokola banzete ya aloe oyo Yawe alona, lokola banzete ya sedele pembeni ya mayi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 24:6
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.


Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te ; misala na ye nyonso etambolaka malamu.


Banzete ya Yawe etondi na mayi ; ndenge wana nde ezali, banzete ya sedele ya Libani, oyo Yawe alona.


Olingaka bosembo mpe oyinaka mabe ; yango wana, oh Nzambe, Nzambe na Yo apakoli Yo mafuta ya esengo, asepeli na Yo koleka baninga na Yo.


Nakendeki na elanga ya bakokoti mpo na koluka milona kati na lubwaku, mpo na kotala soki banzete ya vino ebandi kobimisa mito to banzete ya grenade ebandi kobimisa bafololo.


nakolona kati na esobe : banzete ya sedele, ya akasia, ya mirite mpe banzete ya olive ; nakotia banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwi esika moko kati na mabele ya kokawuka,


Yawe akotambolisa yo tango nyonso, akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka mpe akokembisa mikuwa na yo. Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.


Tika ete banyokoli na ngai bayokisama soni, kasi batela ngai ete nayokisama soni te ! Tika ete bango balenga na somo, kasi ngai nalenga na somo te. Tindela bango mokolo ya pasi, bebisa bango malamu mbala mibale.


Bakozonga na koganga ya esengo na bangomba ya Siona ; bakosepela na bomengo ya Yawe : ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe. Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi, mpe bakozala lisusu na mawa te.


Banzete ya bambuma ya ndenge na ndenge ekobota na bangambo nyonso mibale ya ebale monene. Makasa na yango ekokawuka te mpe bambuma na yango ekosila te. Sanza na sanza, ekobanda kobotaka bambuma ya sika ; pamba te ekobanda kozwa mayi oyo ekowuta na Tempelo. Bambuma na yango ekozala malamu mpo na kolia, mpe makasa na yango ekozala malamu mpo na kosalela lokola kisi. »


‹ Oh Jakobi, tala ndenge bandako na yo ya kapo ezali kitoko, mpe bisika oyo ovandaka, oh Isalaele !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ