Mishe azongisaki : — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! »
Mishe alobaki : — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
Boye, Yawe afungolaki miso ya Balami, mpe Balami amonaki anjelu ya Yawe atelema na nzela, na mopanga na ye ya monene. Bongo, Balami afukamaki mpe akweyaki elongi kino na mabele.
oyo ayokaka maloba na Nzambe, oyo ayebaka basekele ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, oyo azwaka emoniseli kowuta na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo soki akweyi na molimo, miso na ye efungwamaka :
maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe, oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo :