Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 24:24 - Mokanda na Bomoi

24 Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi, bakonyokola Ashuri mpe Eberi, kasi bango moko mpe bakobebisama. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 24:24
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali ya Yavani : Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.


Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami.


Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.


Mawa na Asiri, lingenda ya kanda na Ngai ; nzete oyo ezali na loboko na ye ezali nde esalelo ya kanda na Ngai !


Maloba na Yawe na tina na engumba ya Tiri : Oh bamasuwa ya Tarsisi, bosala matanga ! Pamba te engumba ya Tiri esili kobebisama nyonso : ezala ndako to libongo, eloko moko te etikali ! Bazwaki sango oyo wuta na esanga ya Shipele.


basalaki bankayi na yo na banzete ya sheni oyo ewutaki na Bashani ; basalaki bivandelo na yo, ekota pembe ya nzoko oyo ewutaki na Asiri, na mabaya ya sipele oyo ewutaki na bisanga ya Kitimi ;


Boye, elobaki : — Boni, oyebi mpo na nini nayei epai na yo ? Sik’oyo, nakomi pene ya kozonga mpo na kobundisa mokambi ya Persi ; mpe tango ngai nakokende, mokambi ya Grese akoya ;


Bamasuwa oyo ekowuta na ngambo ya weste ya ebale monene Mediterane ekobundisa ye ; bongo, akolemba nzoto, akosilika makasi mpe akotombokela boyokani ya bule. Tango akozonga, akotalisa ngolu epai ya bato oyo bakobebisa boyokani ya bule.


Akotelemisa bandako na ye ya kapo ya bokonzi na ngambo moko ya ebale monene, pembeni ya ngomba ya bule. Boye, akokoma na suka mpe moto oyo akosunga ye akozala te.


Mbala moko, ezala ebende to mabele oyo basalelaka bikeko to bronze to palata to mpe wolo, nyonso epanzanaki, ekomaki mike-mike mpe ekomaki kopumbwa ndenge matiti ya ble epumbwaka tango bapupolaka yango ; mopepe ememaki yango mpe elimwisaki yango. Kasi libanga oyo ekweyelaki ekeko yango ekomaki ngomba moko ya monene oyo etondisaki mokili mobimba. › »


Yango nde ndimbola ya emoniseli ya libanga oyo omonaki kokweya yango moko wuta na ngomba, oyo loboko ya moto moko te ebwakaki, mpo na koya kopanza ebende, bronze, mabele oyo basalelaka bikeko, palata mpe wolo. Nzambe Monene alakisi mokonzi makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Ndoto oyo ezali penza kolakisa makambo ya solo, mpe ndimbola na yango ezali ebongi na kondima.


Ntaba mobali ya bapwale ebele ezali mokonzi ya Grese, mpe liseke monene oyo ezali na kati-kati ya miso na yango ezali mokonzi ya liboso.


Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo : « Amaleki ezalaki na molongo ya liboso kati na bikolo, kasi ekosuka na libebi. »


Mpe na suka, alobaki maloba oyo : « Oh mawa ! Nani akoki kozala na bomoi, wana Nzambe akozala kosala makambo ya boye ?


Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—


— Bolakisa Ngai mbongo moko ya ebende. Elilingi mpe makomi oyo batobola na mbongo oyo, ezali ya nani ? Bazongisaki : — Ya Sezare !


Soki totiki ye kokoba kosala bongo, bato nyonso bakondima ye ; bongo bato ya Rome bakoya bakobebisa Tempelo na biso mpe ekolo na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ