23 Mpe na suka, alobaki maloba oyo : « Oh mawa ! Nani akoki kozala na bomoi, wana Nzambe akozala kosala makambo ya boye ?
Namani, mokonzi ya basoda ya mokonzi ya Siri, azalaki moto monene mpe moto ya lokumu mingi na miso ya nkolo na ye, pamba te, na nzela na ye, Yawe apesaki bato ya Siri elonga. Azalaki soda ya mpiko, kasi azalaki na bokono ya maba.
Kasi nani akobika na mokolo oyo akoya ? Nani akotelema na mokolo oyo akomonana ? Pamba te azali lokola moto ya monyangwisi bibende na moto, lokola sabuni oyo etelisaka bilamba.
Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi, mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele. Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele : ‹ Tala makambo oyo Nzambe asali ! ›
kasi bino bato ya Keni, bokobebisama tango Ashuri akozwa bino lokola bakangami. »
Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi, bakonyokola Ashuri mpe Eberi, kasi bango moko mpe bakobebisama. »