Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 24:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tango Balami atalaki, amonaki Isalaele bavanda na milako na bango, bato na bato na libota na bango. Molimo na Nzambe ayaki likolo na ye ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 24:2
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Molimo ya Nzambe akitelaki Azaria, mwana mobali ya Odedi.


Nani oyo azali komonana lokola moyi ya tongo, kitoko lokola sanza, azali kongenga lokola moyi, abangisaka lokola mampinga ya basoda na se ya bendele na bango ?


Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko lokola engumba ya Tiritsa ; elongi na yo ezali kitoko lokola engumba Yelusalemi ; obangisaka lokola mampinga ya basoda na se ya bendele na bango.


‹ Oh Jakobi, tala ndenge bandako na yo ya kapo ezali kitoko, mpe bisika oyo ovandaka, oh Isalaele !


Simona oyo azalaki moko kati na bato ya lisanga ya Bazelote, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.


Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.


Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele ? ›


Nzokande, bosepela te komona ete milimo mabe ezali kotosa bino ; bosepela nde ete bakombo na bino ekomami kati na Likolo.


Na mokolo ya Nkolo, Molimo ya Nzambe asimbaki ngai, mpe nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola kelelo


Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye.


Tango bakomaki na Gibea, ngulupa ya basakoli ekutanaki na ye ; bongo Molimo ya Nzambe akitelaki ye na nguya, mpe akomaki kosakola kati na bango.


Saulo atindaki bato kokende kokanga Davidi. Kasi tango bamonaki lisanga ya basakoli kosakola mpe Samuele atelemi wana lokola mokambi na bango, Molimo na Nzambe akitelaki bato oyo Saulo atindaki, mpe bakomaki bango mpe kosakola.


Boye Saulo akendeki na Nayoti ya Rama. Kasi ye mpe, wana azalaki kokoba nzela na ye, Molimo na Nzambe akitelaki ye, mpe akomaki kosakola kino akomaki na Nayoti ya Rama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ