Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 24:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bakobotola mokili ya Edomi, bakobotola Seiri, monguna na ye, kasi Isalaele akokoma lisusu makasi koleka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 24:18
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo ! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! »


Okobika na nzela ya mopanga na yo mpe okosalela ndeko na yo ya mobali. Kasi tango okotambola bipai na bipai, okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo.


Tango Jakobi amonaki bango, alobaki : « Oyo ezali molako ya Nzambe ! » Mpe abengaki esika yango : Maanayimi.


Atiaki bayangeli kati na Edomi ; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.


Yawe abimisaki monguna moko mpo na kobundisa Salomo : Adadi, moto ya Edomi, mwana kati na libota ya bokonzi ya Edomi.


Na kala, na tango oyo Davidi abundisaki mokili ya Edomi, Joabi mokonzi ya mampinga, oyo akendeki mpo na kokunda bibembe, abomaki mibali nyonso ya Edomi.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Lisi ya litatoli. » Nzembo ya Davidi mpo na koteya bato.


Pamba te mopanga na ngai esili kolongwa kuna na likolo ; tala, ekiti mpo na kosambisa Edomi, mpe bato oyo nabongisaki mpo na kobebisama.


Azali nani, ye oyo awuti na Edomi, na Botsira, na bilamba ya motane ? Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu, oyo azali kotambola lokola elombe, mpo ayebi ete azalaka makasi ? « Ezali nde Ngai ; nakataka makambo na bosembo, natonda na nguya mpo na kobikisa. »


Na mokolo wana, nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya, nakobamba madusu na yango, nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukana mpe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,


mpo ete bakoka kozwa ndambo ya mokili ya Edomi oyo etikalaki, mpe ya bikolo nyonso oyo babengamaka na Kombo na Ngai, » elobi Yawe oyo asalaka makambo wana nyonso.


Tala, nakokomisa yo moke kati na bikolo, mpe okosambwa makasi.


Kasi mokonzi ya Edomi azongiselaki ye : — Okoki kolekela na mokili na ngai te ; soki omeki, tokobimela bino mpe tokobundisa bino na mopanga.


Mokonzi moko akobima wuta na Jakobi, mpe akoboma batikali nyonso ya engumba. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ