Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 24:10 - Mokanda na Bomoi

10 Balaki atombokelaki Balami makasi. Abetaki maboko na ye mpe alobaki : — Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe, kasi yo opamboli bango mbala misato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 24:10
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpo ete bayaki te kokutana na bana ya Isalaele mpe kopesa bango bilei mpe mayi, kasi bapesaki nde Balami kanyaka mpo ete alakela bango mabe ; atako bongo, Nzambe na biso abongolaki elakeli mabe lipamboli. »


Bakobetela libebi na ye maboko, mpe bakotiola ye na piololo wuta na ndako na ye moko. »


« Mwana na moto, sakola. Loba : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Mopanga, mopanga ! Bangalisi mpe bapelisi yango !


Mwana na moto, ganga mpe lela makasi ! Pamba te mopanga ebimi mpo na koboma bato na ngai, mpo na koboma bakambi nyonso ya Isalaele ; babongisami mpo na kokufa na mopanga elongo na bato na ngai. Yango wana, beta tolo na yo !


Solo, nakobeta maboko na Ngai mpo na litomba oyo bozwaki na nzela ya mabe mpe mpo na makila oyo botangisaki kati na bino.


« Bato moko bawuti kobima na Ejipito mpe batondisi mokili mobimba. Sik’oyo yaka mpe lakela bango mabe mpo na ngai. Tango mosusu nakokoka kobundisa bango mpe kobengana bango. »


Pamba te nakopesa yo lifuti ya malamu mpe nakosala nyonso oyo okoloba. Yaka penza mpe lakela bato oyo mabe mpo na ngai. »


Nabondeli yo, yaka kolakela bango mabe, pamba te bazali makasi mingi koleka ngai, tango mosusu nakokoka kolonga bango mpe kobengana bango na mboka. Pamba te nayebi ete bato oyo opamboli, bapambolamaka ; mpe ba-oyo olakeli mabe, balakelamaka mpe mabe.


Balaki alobaki na Balami : — Likambo nini osali ngai ? Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe ; kasi tala, opamboli bango koleka.


Yango wana, longwa na miso na ngai mpe zonga na mboka na yo ! Nalobaki ete nakopesa yo lifuti ya malamu, kasi Yawe azangisi yo lifuti yango.


Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali, lokola nkosi ya mwasi ; nani akokoka kotelemisa bango ? Tika ete oyo akopambola yo apambolama, mpe oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ! › »


Esalemaki bongo mbala misato. Bongo babendaki nyonso kati na Likolo.


Kasi Yawe, Nzambe na bino, ayokaki Balami te mpe abongolaki elakeli mabe lipamboli mpo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, alingi bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ