Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 24:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzokande, tango Balami amonaki ete Yawe azalaki kaka na esengo ya kopambola Isalaele, alukaki lisusu bimoniseli te ndenge azalaki kosala na bambala mosusu, kasi abalolaki elongi na ye na esobe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 24:1
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balami alamukaki mpe alobaki na bakambi ya Balaki : — Bozonga na mboka na bino, pamba te Yawe aboyi ete nakende elongo na bino.


Bakambi ya Moabi mpe ya Madiani bakendeki mpe bamemaki makabo mpo na kopesa na Balami, momoni makambo. Tango bakomaki epai ya Balami, bayebisaki ye makambo oyo Balaki atindaki.


Balami alobaki na Balaki : — Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, wana ngai nakopusana mwa mosika mpo na kokutana na ye.


Nazwaki nde mokumba ya kopambola. Asila kopambola, mpe ngai nakokoka kobongola te.


Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi, mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele. Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele : ‹ Tala makambo oyo Nzambe asali ! ›


Balaki amemaki Balami na likolo ya ngomba Peori, esika oyo emonisaka esobe mobimba.


Alobaki na Balaki : « Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, bongo ngai napusani mwa mosika. Tango mosusu Yawe akoya kokutana na ngai, bongo nakoyebisa yo makambo nyonso oyo akolakisa ngai. » Balami akendeki likolo ya ngomba moko ya mokuse mpe ezanga matiti.


Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe abonzaki ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali na etumbelo moko na moko.


Ezalaki nde bango bato balandaki toli ya Balami mpe batindikaki bana ya Isalaele na kopesa Yawe mokongo, kati na makambo oyo esalemaki na Peori ; mpe yango nde esalaki ete etumbu ekweya likolo ya bato na Yawe.


Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.


Boni, soki moto akutani na monguna na ye, akotika ye kokoba kokende na nzela na ye na kimia ? Tika ete Yawe afuta yo malamu mpo na bolamu oyo osaleli ngai na mokolo ya lelo.


Boye Saulo atelemaki mpo na kokende na esobe ya Zifi elongo na basoda ya mpiko ya Isalaele, nkoto misato, mpo na koluka Davidi kati na esobe ya Zifi.


Saulo alobaki na Davidi : — Tika ete opambolama, Davidi, mwana na ngai ya mobali ! Solo, okosala penza makambo minene mpe, solo, okolonga. Bongo Davidi akobaki nzela na ye, mpe Saulo azongaki epai na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ