Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 23:9 - Mokanda na Bomoi

9 Tala, wuta na likolo ya mabanga, nazali komona bango ; wuta na likolo ya bangomba, nazali kotala bango. Tala, nazali komona bato moko bavanda bango moko, bazali komitanga na molongo ya bikolo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 23:9
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te babali bana basi ya bikolo wana ya bapaya mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango ya mibali. Boye, basangisi libota ya bule na bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bango. Bakambi mpe bakalaka bazalaki bato ya liboso ya kosala makambo wana ya mbindo. »


Amani alobaki na mokonzi Kizerisesi : — Ezali na bato moko oyo bakeseni na bato mosusu, bapanzani kati na bato mpe kati na bituka nyonso ya mokili na yo ya bokonzi ; bizaleli na bango ekeseni na bizaleli ya bato mosusu, bongo batosaka mibeko ya mokonzi te ; ezali malamu te mpo na mokonzi kotika bango na kimia.


Soki otamboli elongo na biso te, ndenge nini bato bakoyeba ete ngai mpe bato na Yo tozwi ngolu na miso na Yo ? Ezali nde tango okotambola elongo na biso nde ngai mpe bato na yo tokokesana na bikolo nyonso oyo ezali kati na mokili.


Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ; pamba te nazali elongo na yo, » elobi Yawe, « ata soki nabebisi bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino, nakobebisa yo nyonso te. Nakopamela yo solo, kasi nakosala yango na bosembo ; nakozanga te kopesa yo etumbu. »


Botelema mpe bobundisa ekolo oyo ezali na kimia, ekolo oyo ebangaka eloko moko te, » elobi Yawe, « ekolo oyo ezanga bikuke mpe banzete oyo bakangelaka bikuke, ekolo oyo bato na yango bazalaka kaka bango moko.


« Pamba te nakopesa mitindo mpe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonso ndenge bayungolaka ble ; bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.


Kamba bato na Yo na lingenda na Yo ndenge mobateli bibwele asalaka ! Pamba te bazali bameme ya libula na Yo, oyo ezali lokola kotelengana yango moko kati na zamba, na etando moko ya kitoko. Tika ete elia na bilanga ya Bashani mpe ya Galadi ndenge ezalaki kolia na tango ya kala.


Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »


Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki na ekolo moko na moko mabele na yango, tango akabolaki bato nyonso, atiaki bandelo mpo na bato kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe.


Boye Isalaele akowumela na kimia, mpe etima ya Jakobi ezali kotiola kati na mokili ya ble mpe ya vino ya sika, epai wapi likolo ezali kokitisa mamwe.


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ