Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 23:4 - Mokanda na Bomoi

4 Nzambe akutanaki na Balami, mpe Balami alobaki : — Nabongisaki bitumbelo sambo ; mpe na etumbelo moko na moko, nasili kobonza ngombe ya mobali mpe meme ya mobali moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 23:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na butu wana, Nzambe ayaki epai na Balami mpe alobaki : — Lokola bato oyo bayei mpo na kobenga yo, kende elongo na bango. Kasi sala kaka makambo oyo nakoyebisa yo.


Nzambe ayaki epai ya Balami mpe atunaki ye : — Bato oyo bazali epai na yo bazali banani ?


Balami alobaki na Balaki : « Tongela ngai bitumbelo sambo awa mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo. »


Yawe akutanaki na Balami, atiaki maloba na monoko na ye mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.


Alobaki na Balaki : « Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, bongo ngai napusani mwa mosika. Tango mosusu Yawe akoya kokutana na ngai, bongo nakoyebisa yo makambo nyonso oyo akolakisa ngai. » Balami akendeki likolo ya ngomba moko ya mokuse mpe ezanga matiti.


Yawe atiaki maloba na monoko ya Balami mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.


Balobaki : « Bato oyo ozwaki sima mpe basali kaka ngonga moko, ofuti bango ndenge moko na biso oyo tosali mosala makasi mokolo mobimba mpe na se ya moyi makasi ! »


Nakilaka bilei mbala mibale na poso mpe napesaka eteni ya zomi ya nyonso oyo nazwaka. »


Pamba te bakobengana bino na bandako ya mayangani ; mpe tango elingi kutu kokoka, tango oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete, wana azali kosala bongo, azali kobonzela Nzambe mbeka.


Boye, tina nini komikumisa ? Tina ezali te ! Na mobeko nini ? Na mobeko ya misala ? Te, kasi na nzela ya kondima.


ezali na nzela ya misala na bino te mpo ete moko te akoka komikumisa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ