28 Balaki amemaki Balami na likolo ya ngomba Peori, esika oyo emonisaka esobe mobimba.
Bamitiaki na se ya ekangiseli ya Bala ya Peori, baliaki bambeka oyo epesamaki epai ya banzambe oyo ekufa.
mpe kolongwa na Bamoti bakendeki kino na lubwaku ya Moabi, na songe ya ngomba Pisiga, oyo eleki molayi na esobe.
Balaki alobaki na Balami : — Yaka, tika ete namema yo esika mosusu ! Tango mosusu Nzambe akosepela ete olakela bango mabe mpo na ngai wuta na esika yango.
Balami alobaki na Balaki : — Tongela ngai bitumbelo sambo mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo.
Nzokande, tango Balami amonaki ete Yawe azalaki kaka na esengo ya kopambola Isalaele, alukaki lisusu bimoniseli te ndenge azalaki kosala na bambala mosusu, kasi abalolaki elongi na ye na esobe.