27 Balaki alobaki na Balami : — Yaka, tika ete namema yo esika mosusu ! Tango mosusu Nzambe akosepela ete olakela bango mabe mpo na ngai wuta na esika yango.
Kasi Ye, azwaka Ye moko mokano na Ye ; nani akoki kotelemela Ye ? Asalaka nyonso oyo esepelisaka Ye.
Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.
Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.
Pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, asili kozwa mokano ; bongo nani akolongola yango ? Loboko na Ye esili kosembolama ; nani akozongisa yango ?
« Ngai Yawe, nabongwanaka te. Mpo na yango, bino bana mibali ya Jakobi, bozali kaka.
Nabondeli yo, yaka kolakela bango mabe, pamba te bazali makasi mingi koleka ngai, tango mosusu nakokoka kolonga bango mpe kobengana bango na mboka. Pamba te nayebi ete bato oyo opamboli, bapambolamaka ; mpe ba-oyo olakeli mabe, balakelamaka mpe mabe.
Balaki alobaki na Balami : — Yaka elongo na ngai esika mosusu, epai okoki komona bango ; okomona bango nyonso te, kasi kaka ndambo. Mpe wuta na esika yango, lakela bango mabe mpo na ngai.
Balami azongiselaki Balaki : — Nayebisaki yo te ete nakosala kaka makambo oyo Yawe akoloba na ngai ?
Balaki amemaki Balami na likolo ya ngomba Peori, esika oyo emonisaka esobe mobimba.
pamba te Nzambe abotolaka te makabo oyo asili kopesa mpe abongolaka te makanisi na Ye epai ya bato oyo asili kobenga.