Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »
Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba ; natie mobulu kati na molimo ya bato oyo balobaka makambo ekoya, nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya mpe nakomisi mayele na bango liboma.
Sik’oyo, Nkolo, Nzambe na biso, Yo oyo obimisa bato na Yo na Ejipito na nzela ya loboko na Yo ya nguya mpe Kombo na Yo ekenda sango kino na mokolo ya lelo, tosalaki masumu, tosalaki mabe !
Nzokande, tango Balami amonaki ete Yawe azalaki kaka na esengo ya kopambola Isalaele, alukaki lisusu bimoniseli te ndenge azalaki kosala na bambala mosusu, kasi abalolaki elongi na ye na esobe.
Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, alobaki na bango : — Bokonzi nyonso oyo bavandi na yango bakomi kobunda bango na bango ekobebisama ; engumba nyonso to ndako nyonso oyo bato na yango bazali lisusu na bomoko te ekowumela te.
Mpe soki, Ngai, nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani ? Yango wana, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino.
Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.
ndenge nini Nzambe atondisaki Yesu ya Nazareti na Molimo Mosantu mpe na nguya, mpe ndenge nini atambolaki bipai na bipai mpo na kosala bolamu mpe kobikisa bato nyonso oyo bazalaki na se ya nguya ya Satana, pamba te Nzambe azalaki elongo na Ye.
Lisanga mobimba evandaki kimia wana bazalaki koyoka Barnabasi mpe Polo koyebisa bango bikamwa mpe bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, kati na bato ya bikolo ya bapaya.
Bantoma bazalaki kosala bilembo mingi ya kokamwa mpe misala minene kati na bato. Boye, bandimi nyonso bazalaki na momesano ya kosangana na veranda ya Salomo.
— Oh Nkolo Yawe, obandaki kolakisa monene na Yo mpe nguya na Yo epai ya mosali na Yo. Pamba te nzambe nini na likolo mpe na se akoki kosala misala minene mpe makambo ya kokamwa lokola oyo Yo osali ?
Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango.