Atindaki bantoma kobenga Balami, mwana mobali ya Beori, oyo azalaki kovanda na Petori, pembeni ya ebale Efrate, mboka oyo ye abotama. Balaki alobaki na Balami : — Bato moko bawuti kobima na Ejipito, batondisi mokili mobimba mpe bayei sik’oyo kovanda pembeni na ngai.