17 Bongo, Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi. Balaki atunaki ye : — Yawe alobi nini ?
Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku : — Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe ? Jeremi azongisaki : — Solo, liloba ezali ! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni.
Eli atunaki ye : — Makambo nini Yawe ayebisaki yo ? Kobombela ngai te. Tika ete Nzambe apesa yo etumbu ya makasi soki obombeli ngai ata likambo moko kati na nyonso oyo alobaki na yo.