15 Balami alobaki na Balaki : — Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, wana ngai nakopusana mwa mosika mpo na kokutana na ye.
Balami alobaki na bango : — Bolekisa butu awa, mpe nakozongisela bino eyano oyo Yawe akopesa ngai. Boye bakambi ya Moabi bavandaki elongo na ye.
Boye, Balaki amemaki Balami na elanga ya Tsofimi, na songe ya ngomba Pisiga, mpe atongaki kuna bitumbelo sambo mpe abonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko.
Yawe akutanaki na Balami, atiaki maloba na monoko na ye mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.
Alobaki na Balaki : « Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, bongo ngai napusani mwa mosika. Tango mosusu Yawe akoya kokutana na ngai, bongo nakoyebisa yo makambo nyonso oyo akolakisa ngai. » Balami akendeki likolo ya ngomba moko ya mokuse mpe ezanga matiti.
Kasi naboyaki koyoka Balami, boye akomaki nde kopambola bino tango na tango mpe nakangolaki bino na loboko na ye.