Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 23:14 - Mokanda na Bomoi

14 Boye, Balaki amemaki Balami na elanga ya Tsofimi, na songe ya ngomba Pisiga, mpe atongaki kuna bitumbelo sambo mpe abonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 23:14
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazali bato oyo babimisaka wolo na mabenga na bango mpe bamekaka kilo ya palata na emekelo ; bafutaka mosolo epai ya mosali bikeko na bibende mpo ete asalela bango nzambe ya ekeko ya wolo mpe ya palata, mpo ete bafukamela mpe bagumbamela yango.


Nalobaki na nzela ya basakoli, napesaki bango bimoniseli ebele mpe nalobaki na masese na nzela na bango.


mpe kolongwa na Bamoti bakendeki kino na lubwaku ya Moabi, na songe ya ngomba Pisiga, oyo eleki molayi na esobe.


Balaki alobaki na Balami : — Yaka elongo na ngai esika mosusu, epai okoki komona bango ; okomona bango nyonso te, kasi kaka ndambo. Mpe wuta na esika yango, lakela bango mabe mpo na ngai.


Balami alobaki na Balaki : — Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, wana ngai nakopusana mwa mosika mpo na kokutana na ye.


Balami alobaki na Balaki : — Tongela ngai bitumbelo sambo mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo.


Mata na songe ya ngomba Pisiga mpe tala na ngambo ya weste, na nor, na sude mpe na este. Tala kaka mokili na miso kasi okotikala kokatisa Yordani te.


Wuta na bitando ya Moabi, Moyize amataki na likolo ya ngomba Nebo kino na songe ya ngomba Pisiga oyo etalana na Jeriko. Kuna, Yawe alakisaki ye mokili mobimba : wuta na Galadi kino na Dani,


bakisa Araba nyonso na este ya Yordani kino na ebale monene ya Araba, na ebandeli ya ngomba Pisiga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ