Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 23:12 - Mokanda na Bomoi

12 Balami azongisaki : — Boni, naloba te maloba oyo Yawe atie na monoko na ngai ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 23:12
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala.


Ata soki abimisi maloba ya esengo, kondimela ye te, pamba te makambo sambo ya mbindo ebombama kati na motema na ye.


Na butu wana, Nzambe ayaki epai na Balami mpe alobaki : — Lokola bato oyo bayei mpo na kobenga yo, kende elongo na bango. Kasi sala kaka makambo oyo nakoyebisa yo.


Balami azongiselaki Balaki : — Malamu, nayei sik’oyo epai na yo. Kasi nakoki solo koloba na yo kaka likambo moko ? Nakoloba kaka makambo oyo Nzambe akotia na monoko na ngai.


Balaki alobaki na Balami : — Yaka elongo na ngai esika mosusu, epai okoki komona bango ; okomona bango nyonso te, kasi kaka ndambo. Mpe wuta na esika yango, lakela bango mabe mpo na ngai.


Nazwaki nde mokumba ya kopambola. Asila kopambola, mpe ngai nakokoka kobongola te.


Balami azongiselaki Balaki : — Nayebisaki yo te ete nakosala kaka makambo oyo Yawe akoloba na ngai ?


Alobaki na Balaki : « Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, bongo ngai napusani mwa mosika. Tango mosusu Yawe akoya kokutana na ngai, bongo nakoyebisa yo makambo nyonso oyo akolakisa ngai. » Balami akendeki likolo ya ngomba moko ya mokuse mpe ezanga matiti.


« Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. »


Bato ya lolenge oyo basalelaka nde mabumu na bango, kasi basalelaka Klisto, Nkolo na biso, te. Bapengwisaka makanisi ya bato ya bindima-ndima na nzela ya maloba na bango ya elengi mpe ya sukali.


Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ