10 Nani akoki kotanga putulu ya Jakobi to kotanga motango ya bakitani ya Isalaele ? Tika ete nakufa kufa ya bato ya sembo, mpe tika ete suka na ngai ezala lokola ya bango ! › »
nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.
Bana na yo bakozala ebele lokola putulu ya mabele, bakopanzana na bangambo nyonso : wuta na weste kino na este, wuta na nor kino na sude. Mabota nyonso ya mokili ekomipambola mpo na yo mpe mpo na bakitani na yo.
Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Ribeni ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na moko na nkama minei na tuku mitano kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na sima.
Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Efrayimi ezali bato nkoto nkama moko na mwambe na nkama moko, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na molongo ya misato.
Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Dani ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na sambo na nkama motoba, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala na sima na bango nyonso, na se ya bendele na bango.
Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Yuda ezali bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na motoba na nkama minei kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala liboso.
Kati na molongo ya bato oyo babomaki, ezalaki na bakonzi ya Madiani oyo : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba. Babomaki mpe lisusu Balami, mwana mobali ya Beori na mopanga.
Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te.
Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai : — Koma : « Kobanda sik’oyo, esengo na bato oyo bakufaka na lisanga na Nkolo ! » Mpe Molimo alobaki : — Iyo, pasi na bango esilaka mpe bazwaka bopemi, pamba te misala na bango elandaka bango.