Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 22:6 - Mokanda na Bomoi

6 Nabondeli yo, yaka kolakela bango mabe, pamba te bazali makasi mingi koleka ngai, tango mosusu nakokoka kolonga bango mpe kobengana bango na mboka. Pamba te nayebi ete bato oyo opamboli, bapambolamaka ; mpe ba-oyo olakeli mabe, balakelamaka mpe mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 22:6
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakopambola bato oyo bakopambola yo, mpe nakolakela mabe moto oyo akolakela yo mabe ; mpe bato ya bituka nyonso ya mabele bakomipambola mpo na yo. »


Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo ! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! »


Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye : — Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango : sakola elonga mpo na mokonzi !


Boye mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli pene nkama minei mpe atunaki bango : — Nakoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? Bazongiselaki ye : — Kende, pamba te Nkolo akokaba yango na maboko ya mokonzi.


Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te ; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki : — Tika ete mokonzi aloba bongo te !


mpo ete bayaki te kokutana na bana ya Isalaele mpe kopesa bango bilei mpe mayi, kasi bapesaki nde Balami kanyaka mpo ete alakela bango mabe ; atako bongo, Nzambe na biso abongolaki elakeli mabe lipamboli. »


Ata balakeli ngai mabe, Yo okopambola ngai ; soki mpe bameki kotelema mpo na kobundisa ngai, bakokufa soni. Nzokande ngai mosali na Yo, nakozala moto ya esengo.


Ndenge ndeke ya moke oyo babengaka mwano ekendaka bipai na bipai to mbilambila epumbwaka-pumbwaka, ndenge wana mpe elakeli mabe ezwaka te moto oyo asali na ye mabe te.


Bimoniseli na bango ezali ya pamba, mpe masakoli na bango ezali ya lokuta. Balobaka : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi, ’ nzokande Ngai Yawe, natindi bango te. Mpe bazelaka ete maloba na bango ekokisama !


Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino, mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori, azongiselaki ye. Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki longwa na Sitimi kino na Giligali mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »


Kasi Nzambe alobaki na Balami : — Kokende elongo na bango te. Okoki kolakela bato wana mabe te, pamba te bazali bato bapambolama.


Pamba te nakopesa yo lifuti ya malamu mpe nakosala nyonso oyo okoloba. Yaka penza mpe lakela bato oyo mabe mpo na ngai. »


Balaki alobaki na Balami : — Yaka elongo na ngai esika mosusu, epai okoki komona bango ; okomona bango nyonso te, kasi kaka ndambo. Mpe wuta na esika yango, lakela bango mabe mpo na ngai.


Balaki alobaki na Balami : — Yaka, tika ete namema yo esika mosusu ! Tango mosusu Nzambe akosepela ete olakela bango mabe mpo na ngai wuta na esika yango.


Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali, lokola nkosi ya mwasi ; nani akokoka kotelemisa bango ? Tika ete oyo akopambola yo apambolama, mpe oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ! › »


Mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutanaki na mwasi mowumbu moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kosunga ye mpo na kosakola makambo oyo ekoya, mpe azalaki kozwela bankolo na ye mbongo ebele na nzela ya masakoli na ye.


Moto moko te ya Amoni to ya Moabi to bakitani na bango bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.


Tango Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi, abimaki mpo na kobundisa Isalaele, atindaki ete baluka Balami, mwana mobali ya Beori, mpo ete alakela bino mabe.


Moto ya Filisitia alobaki na Davidi : — Boni, ngai nazali mbwa mpo ete oya kobundisa ngai na lingenda ? Bongo alakelaki Davidi mabe na nzela ya banzambe na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ