Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 22:5 - Mokanda na Bomoi

5 Atindaki bantoma kobenga Balami, mwana mobali ya Beori, oyo azalaki kovanda na Petori, pembeni ya ebale Efrate, mboka oyo ye abotama. Balaki alobaki na Balami : — Bato moko bawuti kobima na Ejipito, batondisi mokili mobimba mpe bayei sik’oyo kovanda pembeni na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 22:5
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola putulu ya mabele ; bongo soki moto akoki kotanga putulu, akokoka mpe kotanga bakitani na yo.


Yawe asalaki ete bato na Ye babota mingi, mpe akomisaki bango makasi koleka banguna na bango.


Ezipaki mabele nyonso mpe mabele eyindaki. Eliaki nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te : matiti nyonso ya bilanga mpe bambuma nyonso ya banzete. Kati na mokili mobimba ya Ejipito, eloko moko te ya mobesu etikalaki na banzete to na matiti ya bilanga.


Bato na Ngai, bokanisa nanu makambo oyo Balaki, mokonzi ya Moabi, akanaki kosala bino, mpe makambo oyo Balami, mwana mobali ya Beori, azongiselaki ye. Bokanisa nanu nzela oyo botambolaki longwa na Sitimi kino na Giligali mpo ete bokoka kondima ata misala ya bosembo ya Yawe. »


Boye, Balami akomaki koloba maloba oyo : « Balaki abengisaki ngai wuta na Arami, mokonzi ya Moabi abengisaki ngai wuta na bangomba ya este. Alobaki : ‹ Yaka, lakela Jakobi mabe mpo na ngai ; yaka, loba mabe mpo na Isalaele.


Kati na molongo ya bato oyo babomaki, ezalaki na bakonzi ya Madiani oyo : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba. Babomaki mpe lisusu Balami, mwana mobali ya Beori na mopanga.


Moto moko te ya Amoni to ya Moabi to bakitani na bango bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.


Pamba te bayaki te koyamba bino na mapa mpe na mayi na nzela na bino tango bobimaki na Ejipito ; mpe bazwaki Balami, mwana mobali ya Beori, moto ya Petori, wuta na mokili ya Mezopotami, mpo ete alakela bino mabe.


Kati na bato oyo babomaki na bitumba, bana ya Isalaele babomaki mpe na mopanga Balami, mwana mobali ya Beori, moto oyo asololaka na milimo ya bakufi.


Tango Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi, abimaki mpo na kobundisa Isalaele, atindaki ete baluka Balami, mwana mobali ya Beori, mpo ete alakela bino mabe.


Mawa na bango, pamba te balandaki nzela ya Kayina, bapengwaki lokola Balami mpo na lokoso ya mbongo, mpe bakufaki lokola Kore mpo na botomboki.


Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ