Boye, ye moko Jeroboami aponaki banganga-nzambe mpo na bisambelo ya likolo ya bangomba mpe mpo na banzambe ya bikeko oyo asalaki na lolenge ya bantaba ya mibali mpe ya bana ngombe.
batongi bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, mpo na kotumba bana na bango na moto lokola mbeka ya kotumba epai ya Bala ; nzokande Ngai natikala kotinda bango likambo ya boye te to mpe likambo ya boye etikala ata komata na makanisi na Ngai te ;
Nakoboma bato nyonso oyo bakendaka na bisambelo ya likolo ya bangomba mpe batumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe na bango, kati na mokili ya Moabi, » elobi Yawe.
Bobebisa bisika nyonso oyo bato ya bikolo oyo bozali kobengana bazalaki kogumbamela banzambe na bango na likolo ya bangomba ya milayi mpe ya mikuse mpe na se ya banzete nyonso oyo ezali na makasa ya mobesu.