Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 22:38 - Mokanda na Bomoi

38 Balami azongiselaki Balaki : — Malamu, nayei sik’oyo epai na yo. Kasi nakoki solo koloba na yo kaka likambo moko ? Nakoloba kaka makambo oyo Nzambe akotia na monoko na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 22:38
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Mishe azongisaki : — Na Kombo na Yawe, makambo oyo Yawe akoloba na ngai, yango nde nakoloba.


Kasi mokonzi alobaki na ye : — Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe ?


Kasi Mishe azongisaki : — Na Kombo na Yawe, makambo oyo Nzambe na ngai akoloba na ngai, yango nde nakoloba.


Yawe akweyisaka mikano ya bikolo, abebisaka mabongisi ya bato.


tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.


Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.


Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba ; natie mobulu kati na molimo ya bato oyo balobaka makambo ekoya, nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya mpe nakomisi mayele na bango liboma.


Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli ; wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. Nalobaki : « Mabongisi na Ngai ekolongisama, mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »


Kangama kaka na bonganga mpe na kindoki na yo, oyo omonelaka pasi wuta bolenge na yo ! Tango mosusu okozwela yango litomba, tango mosusu okokoka kobangisa bato.


Kasi Balami azongiselaki bango : — Ezala soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakokoka kosala eloko moko te ya monene to ya moke oyo ekokende libanda ya mibeko ya Yawe, Nzambe na ngai.


Balaki alobaki na Balami : — Boni, natindaki te bato na lombangu mpo na kobenga yo ? Mpo na nini oyaki epai na ngai te ? Okanisaki ete nazangi makoki ya kofuta yo ?


Boye, Balami akendeki nzela moko na Balaki kino na Kiriati-Utsoti.


Balami alobaki na bango : — Bolekisa butu awa, mpe nakozongisela bino eyano oyo Yawe akopesa ngai. Boye bakambi ya Moabi bavandaki elongo na ye.


Yawe akutanaki na Balami, atiaki maloba na monoko na ye mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.


Balami azongiselaki Balaki : — Nayebisaki yo te ete nakosala kaka makambo oyo Yawe akoloba na ngai ?


« Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ