35 Anjelu ya Yawe alobaki na Balami : — Kende elongo na bato oyo kasi okoloba kaka makambo oyo nakoloba na yo. Boye, Balami akendeki elongo na bakambi ya Balaki.
Tango Balaki ayokaki sango ete Balami azali koya, akendeki kokutana na ye na engumba ya bato ya Moabi, oyo ezalaka na mondelo ya Arinoni, na suka ya mokili na ye.