Tala likambo oyo ezali mabe kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi : bato nyonso basukaka kaka ndenge moko ; lisusu, mitema ya bato etonda na mabe, mpe bozoba ezalaka kati na mitema na bango wana bazali nanu na bomoi ; mpe, sima na yango, bakokufa kaka.
Ane elobi na Balami : — Boni, nazali ane na yo te oyo osalelaka tango nyonso kino na mokolo ya lelo ? Nazalaka solo na momesano ya kosalela yo makambo ya boye ? Balami azongisaki : — Te !