28 Bongo, Yawe afungolaki monoko ya ane, mpe elobaki na Balami : — Likambo nini nasali yo mpo ete okoka kobeta ngai mbala misato ?
Yawe alobaki na ye : — Nani apesaka monoko epai ya moto ? Nani akomisaka moto baba to mokufi matoyi ? Nani akomisaka moto, moto oyo amonaka to mokufi miso ? Boni, ezali Ngai Yawe te ?
Balami azongiselaki ane : — Ozali kosakana na ngai ! Soki nazalaki na mopanga na loboko na ngai, mbele nabomi yo kaka sik’oyo !
Pamba te Nzambe alembanaka eloko te.
Toyebi malamu ete kino sik’oyo, bikelamu nyonso ezali kolela pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
kolanda ndenge ekomama : « Nakobebisa bwanya ya bato ya bwanya, mpe nakokomisa mayele ya bato ya mayele bozoba. »
kasi Nzambe apamelaki ye mpo na bozangi botosi na ye, atiaki maloba ya bomoto kati na monoko ya ane ya mwasi, mpe nyama yango oyo elobaka te esukisaki bozoba ya mosakoli.