Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 22:23 - Mokanda na Bomoi

23 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe atelema na kati-kati ya nzela na mopanga ya minu na loboko na ye, ane ebimaki na nzela mpe ekimaki na elanga. Boye, Balami abetaki ane mpo ete ekoka kozonga na nzela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 22:23
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elize asambelaki : — Oh Yawe, fungola ye miso mpo ete amona ! Yawe afungolaki miso ya mosali, mpe mosali atalaki ; amonaki bangomba mike etonda na bampunda mpe bashar ya moto zingazinga ya Elize.


Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu ya Yawe atelemi kati ya likolo mpe mabele, bongo na loboko na ye oyo asembolaki likolo ya Yelusalemi, asimbaki mopanga ezanga ebombelo. Davidi mpe bampaka balataki basaki mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.


Ezala kutu nkongi, kati na likolo, eyebaka bileko ya kokende na bisika mosusu ; ebenga, ndeke ya mayi mpe mbilambila eyebaka ata tango ya kozonga, kasi bato na Ngai bayebi mibeko ya Yawe te.


Ngai, Daniele, ngai moko kaka nde namonaki emoniseli yango. Bato oyo bazalaki elongo na ngai bamonaki yango te, kasi somo makasi ekweyelaki bango, bakimaki mpe babombamaki.


Kasi tango akendeki, Nzambe asilikaki makasi mpe anjelu ya Yawe atelemaki na nzela mpo na kokanga ye nzela tango azalaki kotambola likolo ya ane elongo na basali na ye mibale.


Mpe lisusu, anjelu ya Yawe akendeki kotelema na nzela moko ya moke, oyo elekela na kati-kati ya bilanga mibale ya vino, oyo mopanzi moko na moko na yango ezalaki lokola na bamir mibale.


Bato oyo bazalaki na ngai elongo bamonaki pole yango, kasi bayokaki te mongongo ya moto oyo azalaki koloba na ngai.


Nzokande, tango Jozue azalaki pene ya Jeriko, atombolaki miso mpe amonaki moto moko atelemi liboso na ye ; moto yango asimbaki mopanga na loboko na ye. Jozue apusanaki pene na ye mpe atunaki ye : — Boni, ozali na ngambo na biso to na ngambo ya banguna na biso ?


kasi Nzambe apamelaki ye mpo na bozangi botosi na ye, atiaki maloba ya bomoto kati na monoko ya ane ya mwasi, mpe nyama yango oyo elobaka te esukisaki bozoba ya mosakoli.


Mawa na bango, pamba te balandaki nzela ya Kayina, bapengwaki lokola Balami mpo na lokoso ya mbongo, mpe bakufaki lokola Kore mpo na botomboki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ