Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 22:20 - Mokanda na Bomoi

20 Na butu wana, Nzambe ayaki epai na Balami mpe alobaki : — Lokola bato oyo bayei mpo na kobenga yo, kende elongo na bango. Kasi sala kaka makambo oyo nakoyebisa yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 22:20
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te, Isalaele aboyaki kotosa ngai.


Lokola otombokelaka Ngai, mpe lofundu na yo ekomi kino na matoyi na Ngai, nakotia lopete na Ngai na zolo na yo, nakokanga yo singa na bibebu ndenge bakangaka mpunda monoko, mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyelaki.


Kasi Yawe alobaki na ngai : — Koloba te : « Nazali elenge. » Osengeli kokende epai ya bato nyonso epai wapi nakotinda yo, mpe osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo nakotinda yo.


Boye, na kanda na Ngai, napesaki bino mokonzi, mpe na kotomboka na Ngai, nakolongola ye.


Bino mpe lisusu bolekisa butu awa ndenge bandeko na bino basalaki, mpo ete naluka koyeba lisusu likambo oyo Yawe akoyebisa na ngai.


Anjelu ya Yawe alobaki na Balami : — Kende elongo na bato oyo kasi okoloba kaka makambo oyo nakoloba na yo. Boye, Balami akendeki elongo na bakambi ya Balaki.


Balami azongisaki : — Boni, naloba te maloba oyo Yawe atie na monoko na ngai ?


Yawe akutanaki na Balami, atiaki maloba na monoko na ye mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.


Balami azongiselaki Balaki : — Nayebisaki yo te ete nakosala kaka makambo oyo Yawe akoloba na ngai ?


Yawe atiaki maloba na monoko ya Balami mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.


« Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. »


maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe, oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ