Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 22:18 - Mokanda na Bomoi

18 Kasi Balami azongiselaki bango : — Ezala soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakokoka kosala eloko moko te ya monene to ya moke oyo ekokende libanda ya mibeko ya Yawe, Nzambe na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 22:18
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi moto na Nzambe azongiselaki mokonzi : — Ata soki opesi ngai kati-kati ya bozwi na yo, nakokende epai na yo te, nakolia lipa te mpe nakomela ata litanga ya mayi te na esika oyo.


Kasi Mishe azongisaki : — Na Kombo na Yawe, makambo oyo Yawe akoloba na ngai, yango nde nakoloba.


Kasi Mishe azongisaki : — Na Kombo na Yawe, makambo oyo Nzambe na ngai akoloba na ngai, yango nde nakoloba.


elongo na bakambi oyo bazalaki na wolo mpe batondisa palata kati na bandako na bango.


Daniele azongiselaki mokonzi : — Batela bakado na yo mpo na yo moko mpe pesa lifuti na yo epai ya moto mosusu ! Kasi ngai, nazali kotanga makomi yango mpo na mokonzi ; bongo, nakopesa ye ndimbola na yango.


Bino mpe lisusu bolekisa butu awa ndenge bandeko na bino basalaki, mpo ete naluka koyeba lisusu likambo oyo Yawe akoyebisa na ngai.


Balami azongiselaki Balaki : — Malamu, nayei sik’oyo epai na yo. Kasi nakoki solo koloba na yo kaka likambo moko ? Nakoloba kaka makambo oyo Nzambe akotia na monoko na ngai.


Balami alobaki na bango : — Bolekisa butu awa, mpe nakozongisela bino eyano oyo Yawe akopesa ngai. Boye bakambi ya Moabi bavandaki elongo na ye.


Balami azongiselaki Balaki : — Nayebisaki yo te ete nakosala kaka makambo oyo Yawe akoloba na ngai ?


Balami azongiselaki Balaki : — Boni, nalobaki te na bantoma oyo otindelaki ngai ete


« Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. »


Kasi Petelo azongiselaki ye : — Mpo ete okanisi ete okoki kosomba likabo ya Nzambe na nzela ya mbongo, tika ete yo mpe mbongo na yo bokufa !


Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.


Kasi naboyaki koyoka Balami, boye akomaki nde kopambola bino tango na tango mpe nakangolaki bino na loboko na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ