Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 22:11 - Mokanda na Bomoi

11 « Bato moko bawuti kobima na Ejipito mpe batondisi mokili mobimba. Sik’oyo yaka mpe lakela bango mabe mpo na ngai. Tango mosusu nakokoka kobundisa bango mpe kobengana bango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 22:11
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo ! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! »


Balami alobaki na Nzambe : — Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi, atindeli ngai maloba oyo :


Kasi Nzambe alobaki na Balami : — Kokende elongo na bango te. Okoki kolakela bato wana mabe te, pamba te bazali bato bapambolama.


Balaki alobaki na Balami : — Likambo nini osali ngai ? Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe ; kasi tala, opamboli bango koleka.


Boye, Balami akomaki koloba maloba oyo : « Balaki abengisaki ngai wuta na Arami, mokonzi ya Moabi abengisaki ngai wuta na bangomba ya este. Alobaki : ‹ Yaka, lakela Jakobi mabe mpo na ngai ; yaka, loba mabe mpo na Isalaele.


Balaki atombokelaki Balami makasi. Abetaki maboko na ye mpe alobaki : — Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe, kasi yo opamboli bango mbala misato.


Kasi naboyaki koyoka Balami, boye akomaki nde kopambola bino tango na tango mpe nakangolaki bino na loboko na ye.


Moto ya Filisitia alobaki na Davidi : — Boni, ngai nazali mbwa mpo ete oya kobundisa ngai na lingenda ? Bongo alakelaki Davidi mabe na nzela ya banzambe na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ