Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 22:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bana ya Isalaele batambolaki mobembo na bitando ya Moabi mpe batongaki molako na bango pembeni-pembeni ya ebale Yordani, oyo ezalaki etalana na Jeriko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 22:1
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Bayuda nyonso oyo bakimelaki na mokili ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi mpe na mikili mosusu bayokaki ete mokonzi ya Babiloni atikaki ndambo ya bato kati na Yuda mpe akomisaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, moyangeli na bango,


mpe kolongwa na Bamoti bakendeki kino na lubwaku ya Moabi, na songe ya ngomba Pisiga, oyo eleki molayi na esobe.


Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari basololaki na bango na etando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene na Jeriko, mpe balobaki :


mpe bamemaki bakangami, biloko babotolaki mpe bomengo ya bitumba epai ya Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari, mpe lisanga ya Isalaele na molako na bango oyo ezalaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene ya Jeriko.


mpe tokotikala kozwa libula moko te elongo na bango na ngambo mosusu ya Yordani, pamba te libula oyo esengeli kopesamela biso ezali na ngambo ya este ya Yordani.


Mabota oyo mibale na ndambo ezwaki libula na yango na ngambo ya este ya Yordani, oyo etalana na Jeriko. »


Yawe alobaki na Moyize kati na etando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalani na Jeriko :


Oyo ezali nde mibeko mpe malako oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize epai ya bana ya Isalaele na bitando ya Moabi, oyo etalana na Jeriko, pene ya Yordani.


Ezalaki na ngambo ya este ya Yordani, na mokili ya Moabi, nde Moyize alimbolaki mobeko oyo. Alobaki na bango :


Boye, na tango wana, tozwaki na maboko ya bakonzi mibale ya bato ya Amori, mokili oyo ezalaki na ngambo ya este ya Yordani, wuta na lubwaku ya Arinoni kino koleka ngomba Erimoni.


Wuta na bitando ya Moabi, Moyize amataki na likolo ya ngomba Nebo kino na songe ya ngomba Pisiga oyo etalana na Jeriko. Kuna, Yawe alakisaki ye mokili mobimba : wuta na Galadi kino na Dani,


Bana ya Isalaele balelaki Moyize mikolo tuku misato, na etando ya Moabi kino tango ya kolela mpe ya matanga esilaki.


mayi oyo ezalaki kowuta na ngambo ya likolo etikaki kotiola mpe esalaki lokola mir moko ya monene, mpe etikaki nzela moko ya monene wuta na engumba Adamu, oyo ezalaki pembeni ya Tsaritani ; bongo na ngambo mosusu, mayi oyo ezalaki kokita kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, ya lubwaku ya Yordani, esilaki nyonso. Bato bakatisaki kino na Jeriko oyo ezalaki liboso na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ