Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 21:5 - Mokanda na Bomoi

5 Batombokelaki Nzambe mpe Moyize, balobaki : « Mpo na nini boye ! Bobimisaki biso na Ejipito mpo ete toya kokufa na esobe ? Bilei ezali te, mayi ezali te mpe tolembi kolia bilei oyo ya pamba-pamba ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 21:5
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na Ndako na Ye ya bule, Nzambe azali Tata ya bana bitike, mpe molobeli ya basi bakufisa mibali.


Balobaki mabe na tina na Nzambe : « Boni, Ye Nzambe azali penza na makoki ya kopesa biso bilei kati na esobe ?


Balobaki na Moyize : — Boni, ezali mpo ete malita ezali te na Ejipito, yango wana omemi biso mpo ete tokufa na esobe ? Osali biso nini awa obimisi biso na Ejipito ?


Boye bato bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe balobaki : « Tokomela nini ? »


Tango bana ya Isalaele bamonaki yango, batunanaki bango na bango : — Oyo nini ? Pamba te bayebaki te soki ezali nini. Moyize alobaki na bango : — Ezali mapa oyo Yawe apesi bino mpo ete bolia.


Bato ya Isalaele babengaki lipa yango mana. Ezalaki pembe lokola bambuma ya koriande mpe elengi lokola mikate balamba na mafuta ya nzoyi.


Moto oyo atondi aboyaka ata mafuta ya nzoyi, kasi moto oyo azali na nzala ayokaka ata bilei ya bololo elengi.


Kasi bana mpe batombokelaki Ngai, balandaki bikateli na Ngai te, babatelaki te na bokebi mibeko na Ngai, oyo moto asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango, mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai kati na esobe.


Kasi bokolia yango sanza mobimba kino ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango nkele, pamba te bobwakaki Yawe oyo azali kati na bino, bolelaki-lelaki liboso na Ye mpe bolobaki : ‹ Mpo na nini tobimaki na Ejipito ? › »


Aron asalaki ndenge kaka Moyize alobaki, mpe akimaki mbangu na kati-kati ya lisanga. Nzokande, etumbu emibandelaki kosala mosala na yango na kati-kati ya bato, kasi Aron abonzaki malasi ya ansa mpe asalaki mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango.


Tosengeli mpe te komeka Klisto, ndenge bamosusu kati na bango basalaki ; mpe banyoka ebomaki bango mpo ete eswaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ