Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 21:35 - Mokanda na Bomoi

35 Boye, bana ya Isalaele babomaki ye elongo na bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso ; batikaki ata moto moko te na bomoi, mpe bakamataki mokili na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 21:35
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

bituka oyo Yawe akweyisaki liboso ya bato ya Isalaele, ezali malamu mpo na kobokola bibwele ; nzokande, basali na yo bazali mpe na bibwele. »


Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali penza balongi na nzela ya Ye oyo alinga biso.


Bato ya Ori mpe bazalaki kovanda na Seiri kasi bakitani ya Ezawu babenganaki bango. Babomaki bato ya Ori liboso na bango mpe bakomaki kovanda na bisika na bango ndenge kaka Isalaele asalaki mpo na mokili oyo Yawe apesaki bango lokola bozwi.


Yawe akobebisa bango ndenge kaka asalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi ya bato ya Amori, oyo abebisaki elongo na bamboka na bango.


mpe tango bazalaki na lubwaku etalana na Beti-Peori, na ngambo ya este ya Yordani, kati na mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni oyo Moyize mpe bana ya Isalaele balongaki tango babimaki na Ejipito.


Bazwaki mokili na ye mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani. Bakonzi nyonso mibale bazalaki bato ya Amori mpe bakonzaki na ngambo ya este ya Yordani.


Bashani mobimba, mokili ya Ogi, lokola moko kati na bato ya suka ya Refayimi oyo azalaki kokonza na Ashitaroti mpe na Edreyi, ezalaki mpe kati na libula na bango. Moyize alongaki bango mpe abotolaki bango mokili na bango.


Yawe azongiselaki bana ya Isalaele : — Boni, nabikisaki bino te na maboko ya bato ya Ejipito, ya Amori, ya Amoni mpe ya Filisitia ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ