Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 21:29 - Mokanda na Bomoi

29 Oh Moabi, mawa na yo ! Oh bato ya Kemoshi, bobebisami ! Bakomisaki bana na ye ya mibali bakimi ; mpe bana basi na ye, bakangami ya mokonzi Sikoni, mokonzi ya Amori.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 21:29
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi ; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki.


Na ngomba oyo etalani na Yelusalemi, Salomo atongaki esambelo ya likolo ya ngomba mpo na Kemoshi, nzambe ya mbindo ya Moabi ; mpe mpo na Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni.


Mokonzi apanzaki mpe bisambelo ya likolo ya bangomba oyo ezalaki na este ya Yelusalemi, na ngambo ya loboko ya mobali ya ngomba ya Libebi, oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, atongaki mpo na Asitarite, nzambe mwasi ya makambo mabe ya bato ya Sidoni ; mpo na Kemoshi, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Moabi ; mpe mpo na Moloki, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Amoni.


Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, kino na Egilati-Shelishiya ; bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ; mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga mpo na kobebisama na bango.


Bakobengana basi ya Moabi lokola bandeke na zala na yango, na suka ya ebale ya Arinoni.


Boye, Moabi ekoyoka soni likolo ya Kemoshi ndenge bato ya Isalaele bayokaki soni tango batiaki mitema na Beteli.


« Bato oyo bazali kokima bakozanga lisungi na elili ya engumba ya Eshiboni, pamba te moto moko ewuti na Eshiboni, moto ebimi na ndako ya mokonzi Sikoni, etumbi bandako batonga makasi ya Moabi mpe mito ya bato ya lolendo.


Oh Moabi, mawa na yo ! Bato ya Kemoshi babebisami, bana na yo ya mibali bakangami na bowumbu, mpe bana na yo ya basi bakokende na bowumbu !


Lokola bozali kotia mitema na misala na bino mpe na bomengo na bino, bino mpe bokokende na bowumbu ; boye Kemoshi mpe akokende na bowumbu elongo na Banganga-Nzambe mpe bakambi na ye.


‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ; natali ye, kasi na pembeni te. Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi, mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele. Akotobola mito ya bato ya Moabi mpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti.


Boni, okozwa te oyo Kemoshi, nzambe na yo, apesi yo ? Biso tokozwa oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ