Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 21:26 - Mokanda na Bomoi

26 Eshiboni ezalaki engumba oyo Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo abundisaki mokonzi ya kala ya Moabi mpe abotolaki na maboko na ye mokili nyonso, kino na Arinoni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 21:26
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mabele na yo nyonso mibale ezali lokola bana mapasa mibale ya mboloko.


Kingo na yo ezali lokola ndako molayi oyo batonga na pembe ya nzoko. Miso na yo ezali lokola maziba ya engumba Eshiboni, pembeni ya ekuke ya Bati-Rabimi. Zolo na yo ezali lokola ndako molayi ya Libani oyo etalani na Damasi.


Moabi ekozala lisusu na lokumu te, bato bakosalela yango likita kati na Eshiboni mpo na kokweyisa yango : ‹ Boya, tokweyisa ekolo oyo ! › Yo mpe, engumba Madimeni, okokanga monoko ; mopanga ekolanda yo.


Moabi ezali na soni mpo ete esili kokweya. Bolela mpe boganga, bobelela na Arinoni ete mokili ya Moabi ebebisami !


« Bato oyo bazali kokima bakozanga lisungi na elili ya engumba ya Eshiboni, pamba te moto moko ewuti na Eshiboni, moto ebimi na ndako ya mokonzi Sikoni, etumbi bandako batonga makasi ya Moabi mpe mito ya bato ya lolendo.


Isalaele abotolaki bingumba nyonso ya bato ya Amori mpe bakomaki kovanda kati na yango, bakisa Eshiboni mpe bamboka mike na yango nyonso ya zingazinga.


Yango wana balobaka na masese : « Boya na Eshiboni ! Tika ete etelema lisusu ! Tika ete engumba Sikoni etongama lisusu !


Makambo yango esalemaki sima na Moyize kolonga Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki koyangela wuta na Eshiboni, mpe sima na ye kolonga Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.


Mabele oyo ezwamaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba Medeba mobimba,


kino na Eshiboni mpe bingumba na yango nyonso oyo ezalaka na likolo ya ngomba, bakisa Diboni, Bamoti-Bala, Beti-Bala-Meoni,


Etuka ya Yaezeri, bingumba nyonso ya Galadi, mpe ndambo ya mokili ya bato ya Amoni kino na Aroeri oyo etalana na Raba ;


Eshiboni mpe Yaezeri, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei.


Mibu nkama misato, bana ya Isalaele bavandaki na Eshiboni, na Aroeri, na bamboka na yango ya mike mpe na bingumba nyonso oyo ezali pembeni ya Arinoni. Mpo na nini bobotolaki yango te na tango wana ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ