Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 21:25 - Mokanda na Bomoi

25 Isalaele abotolaki bingumba nyonso ya bato ya Amori mpe bakomaki kovanda kati na yango, bakisa Eshiboni mpe bamboka mike na yango nyonso ya zingazinga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 21:25
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mabele na yo nyonso mibale ezali lokola bana mapasa mibale ya mboloko.


Eshiboni mpe Eleale ezali koganga makasi, mingongo ya bato na yango ezali koyokana kino na Yakatsi ; yango wana, mampinga ya Moabi bazali mpe koganga mpe mitema na bango ebukani.


Moabi ekozala lisusu na lokumu te, bato bakosalela yango likita kati na Eshiboni mpo na kokweyisa yango : ‹ Boya, tokweyisa ekolo oyo ! › Yo mpe, engumba Madimeni, okokanga monoko ; mopanga ekolanda yo.


Makelele mpe koganga ezali komata wuta na Eshiboni kino na Eleale mpe Yakatsi, wuta na Tsoari kino koleka Oronayimi mpe Egilati-Shelishiya ; pamba te, ezala mayi ya Nimirimi esili kokawuka.


« Bato oyo bazali kokima bakozanga lisungi na elili ya engumba ya Eshiboni, pamba te moto moko ewuti na Eshiboni, moto ebimi na ndako ya mokonzi Sikoni, etumbi bandako batonga makasi ya Moabi mpe mito ya bato ya lolendo.


Kulutu na yo ya mwasi, ezali Samari oyo avandi na ngambo ya nor ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi ; leki na yo ya mwasi ezali Sodome oyo avandi na ngambo ya sude ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi.


Tala sik’oyo masumu ya Sodome, ndeko na yo ya mwasi : ye elongo na bana na ye ya basi bazalaki bato ya lolendo, mpo ete batondaki na bomengo mpe eloko moko te ezalaki kotungisa bango ; basungaki ata moke te babola mpe bato bakelela.


Yango wana, nakozongisa lisusu bolamu ya Sodome mpe ya Samari, elongo na bingumba na yango ; mpe yo, nakozongisa bolamu na yo kati na yango


Nabimisaki bino na Ejipito mpe natambolisaki bino mibu tuku minei kati na esobe mpo na kopesa bino mokili ya bato ya Amori.


Eshiboni ezalaki engumba oyo Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo abundisaki mokonzi ya kala ya Moabi mpe abotolaki na maboko na ye mokili nyonso, kino na Arinoni.


Boye Isalaele avandaki na mokili ya bato ya Amori.


« Bingumba ya Ataroti, ya Diboni, ya Yaezeri, ya Nimira, ya Eshiboni, ya Eleale, ya Sebami, ya Nebo mpe ya Beoni ;


Bato ya Ori mpe bazalaki kovanda na Seiri kasi bakitani ya Ezawu babenganaki bango. Babomaki bato ya Ori liboso na bango mpe bakomaki kovanda na bisika na bango ndenge kaka Isalaele asalaki mpo na mokili oyo Yawe apesaki bango lokola bozwi.


Namemaki bino na mokili ya bato ya Amori, oyo bazalaki kovanda na ngambo ya este ya Yordani. Babundisaki bino kasi nakabaki bango na maboko na bino. Nabomaki bango na miso na bino mpe bobotolaki mokili na bango.


Mibu nkama misato, bana ya Isalaele bavandaki na Eshiboni, na Aroeri, na bamboka na yango ya mike mpe na bingumba nyonso oyo ezali pembeni ya Arinoni. Mpo na nini bobotolaki yango te na tango wana ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ