17 Boye, bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo : « Oh libulu, bimisa mayi ! Boyembela yango !
Boyemba mpo na lokumu na Ye, bosanzola Ye na mindule ! Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso !
Bato na Ye bandimelaki maloba na Ye mpe bayembaki masanzoli na Ye.
Boyemba loyembo mpo na Yawe, pamba te asali makambo ya kokamwa. Tika ete mokili mobimba eyeba yango !
Libulu oyo bana bakonzi batimola, oyo bato minene batobola na mangenda mpe banzete na bango. » Kolongwa na esobe, bakendeki kino na Matana ;
Soki moko kati na bino azali na pasi, tika ete abondela ; soki moko azali na esengo, tika ete ayemba banzembo mpo na kokumisa Nzambe ;
Na mokolo wana, Debora mpe Baraki, mwana mobali ya Abinoami, bayembaki nzembo oyo :