Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Mitango 20:8 - Mokanda na Bomoi

8 « Zwa lingenda na yo ; bongo elongo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bosangisa lisanga mobimba esika moko. Boloba na libanga wana na miso na bango, mpe ekobimisa mayi wuta na yango. Okobimisa mayi na libanga mpo ete bato ya lisanga mobimba bakoka komela elongo na bibwele na bango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Mitango 20:8
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.


Tango bazalaki na nzala, opesaki bango bilei wuta na likolo ; mpe tango bazalaki na posa ya mayi, obimiselaki bango mayi wuta na libanga. Olobaki na bango ete bakende kobotola mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa bango.


Afungolaki libanga, mpe mayi ebimaki, etiolaki lokola ebale kati na esobe.


oyo abongolaka libanga monene liziba, mpe libanga etima.


Pamba te alobaki, mpe likambo esalemaki ; mpe apesaki mitindo, mpe emonanaki.


Kasi yo, tombola lingenda na yo, sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpe kabola mayi mpo ete bana ya Isalaele bakoka kokatisa ebale monene lokola na mabele ya kokawuka.


Moyize alobaki na Jozue : — Ponela biso bilombe ya bitumba kati na bato ; mpe lobi ; wana yo okende kobundisa bato ya Amaleki, ngai nakotelema na likolo ya ngomba moke elongo na lingenda ya Nzambe na loboko na ngai.


Kasi zwa lingenda oyo ezali na maboko na yo mpo ete osala bilembo ya kokamwa na nzela na yango.


Yawe atunaki ye : — Ozali na nini na loboko na yo ? Moyize azongisaki : — Nazali na lingenda.


Moyize azwaki mwasi na ye mpe bana na ye ya mibali, atiaki bango likolo ya ane mpe azongaki na Ejipito. Azwaki lisusu lingenda ya Nzambe na loboko na ye.


Moyize mpe Aron basalaki ndenge kaka Yawe atindaki bango. Aron atombolaki nzete na ye mpe abetaki lingenda oyo azalaki na yango, na mayi ya Nili na miso ya Faraon mpe ya basali na ye ; mpe mayi nyonso ebongwanaki makila.


Banyama ya zamba, bambwa ya zamba mpe maligbanga ekopesa Ngai nkembo ; pamba te nakopesa mayi kati na esobe, bibale kati na mabele ekawuka, mpo na komelisa bato na Ngai, oyo naponaki,


Bayokaki posa ya mayi te tango azalaki kotambolisa bango na esobe, abimisaki mayi na libanga mpo na bango, abukaki libanga mpe mayi ebimaki.


Moyize atombolaki loboko na ye mpe abetaki lingenda na ye na libanga mbala mibale. Mayi ebimaki ; bongo lisanga mobimba elongo na bibwele na bango bamelaki.


mpe nzela ya miluka ya mabwaku oyo ekenda kino na engumba Ari mpe elekela pembeni-pembeni ya mondelo ya Moabi. »


Libulu oyo bana bakonzi batimola, oyo bato minene batobola na mangenda mpe banzete na bango. » Kolongwa na esobe, bakendeki kino na Matana ;


Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo.


Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !


Kino sik’oyo, bosengi nanu eloko moko te na Kombo na Ngai. Bosenga, mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.


Bango nyonso, na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kosambela elongo na basi, elongo na Mari, mama ya Yesu, mpe elongo na bandeko ya Yesu.


Tango babetaki bakelelo, bato bagangaki makasi. Bongo, tango bato bagangaki makasi sima na koyoka lolaka ya kelelo kobeta tango molayi, mir ya engumba ekweyaki na pwasa. Boye, moto nyonso akotaki na engumba, liboso na ye, mpe babotolaki yango.


Tango lolaka ya bakelelo yango ekoyokana tango molayi, tika ete bato nyonso baganga makasi ; bongo mir ya engumba ekokweya na pwasa, mpe moto na moto akokota na engumba, na esika oyo akozala.


Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.


Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi : — Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ